Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Lisiko epesi biso elikya ya lisekwa

Lisiko epesi biso elikya ya lisekwa

Ekaniseli esalisaka biso tókanisa na mozindo likoló ya mapamboli oyo tokozwa na nzela ya lisiko na mikolo ezali koya, na ndakisa, lisekwa. Yehova akaná te ete bato bakufaka. Yango wana, mawa toyokaka ntango moto oyo tolingaka akufi ezalaka moko ya makambo ya mpasi mingi na bomoi. (1Ko 15:26) Yesu ayokaki mpasi mingi ntango amonaki bayekoli na ye bazali kolela Lazare. (Yn 11:33-35) Lokola Yesu amonisaki mpenza bomoto ya Yehova na ndenge ya kokoka, tokoki kondimisama ete Yehova mpe ayokaka mpasi ntango amonaka biso tozali kolela bandeko na biso oyo bakufi. (Yn 14:7) Yehova azelaka na mposa makasi ntango oyo akosekwisa basaleli na ye; biso mpe tosengeli kozelaka yango bongo.Yb 14:14, 15.

Lokola Yehova azali Nzambe ya molɔngɔ, tokoki kondimisama ete lisekwa ekosalema na mobulu te. (1Ko 14:33, 40) Na esika ete tókundaka bibembe, tokobanda nde koyamba bandeko na biso oyo bakufá. Okanisaka na mozindo likoló ya lisekwa, mingimingi ntango ndeko to moninga na yo akufi? (2Ko 4:17, 18) Opesaka Yehova matɔndi na ndenge apesá biso lisiko mpe ayebisá biso na Biblia ete bato bakufá bakozonga na bomoi?Kol 3:15.

  • Baninga mpe bandeko na yo nini ozelaka mpenza komona bango lisusu?

  • Na bato oyo Biblia elobelaka, banani olingaka mpenza kokutana mpe kosolola na bango?