Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Lolenge ya kobongisa ndenge na yo moko ya kokabola bazulunalo

Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Lolenge ya kobongisa ndenge na yo moko ya kokabola bazulunalo

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Atako mokanda ya likita epesaka makanisi oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kobanda lisolo, yango ezali kaka plan ya mpamba. Osengeli kosalela maloba na yo moko. Mbala mosusu, okoki kosalela ndenge mosusu ya kobanda lisolo to kolobela lisolo mosusu oyo ekosepelisa mpenza bato ya teritware na bino. Soki ezali bongo, nsima ya kotánga zulunalo, ya kotalela makanisi oyo ezalaka na ndenge ya kobanda lisolo, mpe ya kotala bavideo ya bilakiseli, okoki kosalela makanisi oyo ezali awa na nse mpo obongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo.

NDENGE YA KOSALA YANGO

Omituna naino: ‘Nazali na mposa ya kosalela lolenge moko ya kobanda lisolo oyo batye awa?’

ƐƐ

  • Bongisá maloba na yo ya ebandeli. Nsima ya kopesa moto mbote ndenge esalemaka epai na bino, lobá na mokuse ntina oyo oyei kotala ye. (Ndakisa: “Nayei kotala yo mpo na . . . ”)

  • Bongisá mpe makambo oyo okoloba nsima ya kotuna motuna, liboso ya kotánga vɛrsɛ mpe ya kopesa moto zulunalo. (Ndakisa: Mpo na kotánga vɛrsɛ, okoki koloba boye: “Okoki kozwa eyano ya malamu na motuna wana na vɛrsɛ oyo.”)

TE

  • Poná lisolo moko oyo esepelisi yo mingi na zulunalo, mpe oyo ekosepelisa mpenza bato ya teritware na bino

  • Bongisá motuna moko oyo okotuna moto mpo apesa makanisi na ye mpo bósolola, kasi te oyo ekosala ete moto azanga eloko ya koloba. (Ndakisa: Mituna oyo ezali na lokasa 2 ya bazulunalo.)

  • Poná vɛrsɛ oyo okotánga. (Soki okopesa moto Lamuká!, esengeli kaka te otángela moto vɛrsɛ mpo zulunalo yango esalemá mpo na kosalisa bato oyo bayebaka makambo mingi te ya Biblia mpe oyo, mbala mosusu, balingaka makambo ya mangomba te.)

  • Bongisá likanisi moko to mibale ya mokuse mpenza oyo ekomonisa matomba oyo moto akoki kozwa soki atángi lisolo yango

ATA NDENGE NINI

  • Bongisá motuna moko oyo okotikela moto mpo opesa ye eyano ntango okozongela ye

  • Komá makanisi oyo okolobela mbala ya nsima mpo obosana yango te