Na Albanie, bandeko bazali kobengisa bato na Bilei ya mpokwa ya Nkolo

MOKANDA YA LIKITA BOMOI MPE MOSALA Sanza ya Mars 2017

Ndenge ya kokabola mikanda

Ndenge ya kokabola Linɔngi ya Mosɛnzɛli mpe ndenge ya koteya solo na oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Landá ndakisa wana mpo na kobongisa maloba na yo moko ya kokabola mikanda.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

“Nazali elongo na yo mpo na kobikisa yo”

Yirimia amonaki lokola akokoka mokumba te ntango Yehova atyaki ye mosakoli. Ndenge nini Yehova alendisaki ye?

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Batikaki kosala mokano ya Nzambe

Bayisraele bakanisaki ete bambeka oyo bamesanaki kopesa, epesaki nzela na etamboli ya mabe. Na mpiko nyonso, Yirimia abimisaki polele masumu mpe bokosi na bango.

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kosalela mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?

Salelá mwa buku oyo mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia báyeba malamu Batatoli ya Yehova, makambo oyo tosalaka mpe ebongiseli na biso.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Bato bakolonga kaka soki Yehova atambwisi bango

Na Yisraele ya kala, baoyo balandaki litambwisi ya Yehova Nzambe bazalaki na kimya, na esengo mpe na bomoi ya malamu.

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kosalela mwa buku Yoká Nzambe

Saleláká bililingi mpe bavɛrsɛ ya Biblia mpo na koteya baoyo bayebi kotánga te mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Yisraele ebosanaki Yehova

Yehova alingaki komonisa nini ntango ayebisaki Yirimia asala mobembo ya kilomɛtrɛ 500 mpo na kokende na ebale Efrate mpo na kobomba mokaba ya lini?

BOMOI YA BAKRISTO

Salisá bato ya libota na yo bábosana Yehova te

Kosala pɔsɔ na pɔsɔ Losambo na kati ya libota, oyo eyokani mpenza na mposa ya libota, ekoki kosalisa bato ya libota na yo bábosana Yehova te. Ndenge nini okoki kolonga makambo oyo epekisaka losambo na kati ya libota?