Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kosalela mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?

Ndenge ya kosalela mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?

Mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? ebongisamá mpo na kotalela yango elongo na bayekoli ya Biblia na ebandeli to na nsuka ya boyekoli. * Liteya 1 tii na 4 esalisaka bayekoli báyeba soki tozali banani, liteya 5 tii 14 esalisaka bango báyeba makambo oyo tosalaka, mpe liteya 15 tii 28 emonisi ndenge ebongiseli na biso etambolaka. Ezali malamu kotalela mateya yango mokomoko ndenge elandaná lobá kaka soki bosengeli kotalela liteya moko boye mpo eyokani na likambo bozali kolobela. Liteya mokomoko ezali kaka na lokasa moko, mpe na bayekoli mingi, bokoki kolobela yango na boumeli ya miniti mitano to zomi.

  • Bendá likebi na motó ya likambo ya liteya yango

  • Bótánga liteya yango mobimba, mbala moko to ndambondambo

  • Bólobela makambo oyo bouti kotánga. Salelá mituna oyo ezali na nsuka ya lisolo mpe bililingi. Bótánga mpe bólobela bavɛrsɛ oyo ebongi. Monisá ete mitó ya makambo ya mike oyo ekomami na makomi ya moindo makasi epesi eyano na motuna ya motó ya likambo

  • Soki etanda “Mpo na koyeba makambo mosusu” ezali, bótánga yango mpe lendisá moyekoli na yo asala makambo oyo basɛngi wana

^ par. 3 Mwa buku yango oyo ezali na Internet nde ezali na makambo ya sika.