Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kosalela mwa buku Yoká Nzambe

Ndenge ya kosalela mwa buku Yoká Nzambe

Mwa buku Yoká Nzambe esalemá mpo na koteya bato oyo bayebi kotánga te mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli. Liteya mokomoko oyo ezali na nkasa mibale, ezali na bililingi oyo ebongisamá mpe mwa elembo moko ya likula oyo elakisi ndenge bililingi elandaná.

Mwa buku Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko ezali na bililingi ndenge moko na mwa buku Yoká Nzambe. Kasi mwa buku Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko ezali na makomi ebele mpe tokoki kopesa yango bayekoli ya Biblia oyo bayebi kotánga mwa moke. Mbala mingi, basakoli balingaka kosalela yango ntango bazali koyekola na moyekoli oyo azali na Yoká Nzambe. Na bisika mingi, okomona etanda oyo ezali na makambo mosusu ya kolobela, na kotalela mayele ya moyekoli.

Okoki kopesa bato mwa buku yango ntango nyonso, ata soki ezali te mokanda ya kokabola na sanza. Ntango ozali koyekola na moto, salelá bililingi mpo na kolimbola makambo oyo Biblia elobeli. Tunáká mituna mpo na koyeba makanisi ya moyekoli mpo na koyeba soki azali kokanga ntina. Tángá mpe lobelá bavɛrsɛ oyo ezali na nse ya lokasa mokomoko. Soki bosilisi mwa buku yango, bóyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini? to Makambo oyo Biblia eteyaka mpo na kosalisa moyekoli akola tii azwa batisimo.