Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YIRIMIA 12-16

Yisraele ebosanaki Yehova

Yisraele ebosanaki Yehova

Yirimia azwaki mokumba moko ya mpasi oyo ezalaki komonisa ete Yehova akanaki kosukisa lolendo mpe motó makasi ya Yuda ná Yerusaleme.

Yirimia azwaki mokaba moko ya lini

13:1, 2

  • Kolata mokaba yango na loketo emonisaki boyokani makasi ya Yehova ná Yisraele

Yirimia amemaki mokaba yango na ebale Efrate

13:3-5

  • Abombaki yango na lidusu ya libanga, mpe na nsima azongaki na Yerusaleme

Yirimia azongaki na ebale Efrate mpo na kozwa mokaba yango

13:6, 7

  • Mokaba yango ebebaki

Yehova alimbolaki likambo yango wana Yirimia asilisaki kokokisa mokumba oyo apesaki ye

13:8-11

  • Ndenge Yirimia atosaki na motema moko ata na likambo wana oyo emonanaki lokola ezali na ntina te, esalisaki Yehova asimba mitema ya bato