Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 20-21

“Moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino”

“Moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino”

20:28

Bakomeli mpe Bafarisai oyo bazalaki na lolendo bazalaki kolinga ete bato bámona bango mpe bápesaka bango bambote na zando

Bakomeli mpe Bafarisai oyo bazalaki na lolendo bazalaki kosala makambo mpo na kokamwisa bato mpe balingaki lokumu mingi. (Mt 23:5-7) Kasi Yesu akesanaki na bango mpenza. “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela.” (Mt 20:28) Tomipesaka mingi na makambo ya losambo oyo ekoki kosala ete tóyebana to bákumisa biso? Soki tolingi kozala bato minene na miso ya Yehova, tokoluka komekola Yesu mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa basusu. Mbala mingi bato bamonaka te misala ya ndenge wana, kasi kaka Yehova nde amonaka yango. (Mt 6:1-4) Mosaleli oyo azali na komikitisa . . .

  • apesaka mabɔkɔ mpo na kotya bopɛto mpe kobatela Ndako ya Bokonzi

  • asalisaka mibange mpe basusu kozanga ete bátinda ye

  • apesaka makabo mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso