Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 25

“Bósɛnzɛlaka”

“Bósɛnzɛlaka”

25:1-12

Atako ndakisa ya bangɔndɔ zomi oyo Yesu apesaki etalelaki nde bakristo oyo batyami mafuta na elimo, nsango na yango etaleli mpe bakristo nyonso. (w15 15/3 nk. 9-14) “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.” (Mt 25:13) Okoki kolimbola ndakisa yango?

  • Mobali ya libala (vs. 1)​—Yesu

  • Bangɔndɔ ya mayele oyo bamilɛngɛlaki (vs. 2)​—Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bamilɛngɛlaki mpo na kokokisa mokumba na bango na bosembo nyonso mpe bazali kongɛnga lokola miinda tii na nsuka (Flp 2:15)

  • Mongongo moko eyokanaki: “Mobali ya libala ayei!” (vs. 6)​—Elembeteli ya kozala ya Yesu

  • Bangɔndɔ ya bazoba (vs. 8)​—Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo babimi kokutana na mobali ya libala kasi bakobi te kosɛnzɛla mpe kobatela bosembo na bango

  • Bangɔndɔ ya mayele baboyi kokaba mafuta na bango (vs. 9)​—Nsima ya kotyama elembo ya nsuka, bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bazali lisusu na likoki te ya kosalisa moto nyonso azangaki bosembo

  • “Mobali ya libala akómaki” (vs. 10)​—Yesu ayei kosambisa pene na nsuka ya bolɔzi monene

  • Bangɔndɔ ya mayele bakɔti na fɛti ya libala elongo na mobali ya libala, mpe porte ekangami (vs. 10)​—Yesu ayanganisi bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo na likoló, kasi baoyo bazangi bosembo babungisi mbano yango