Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kolakisa bayekoli ndenge ya kobongisa boyekoli

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kolakisa bayekoli ndenge ya kobongisa boyekoli

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Soki bazali komibongisa, bayekoli ya Biblia bakoki na pɛtɛɛ nyonso kokanga ntina ya mateya oyo tozali koteya bango mpe kobosana makambo yango te. Soki bazali kokanga ntina mpe kobosana te, bakokola nokinoki. Ata nsima ya batisimo, ekosɛnga bábongisaka makita mpe mosala ya kosakola mpo ‘básɛnzɛlaka.’ (Mt 25:13) Na yango, koyeba ndenge ya koyekola mpe kozala na momeseno malamu ya koyekola ekosalisa bango bomoi mobimba. Kaka na ebandeli, tosengeli kosalisa bayekoli na biso bákóma na momeseno ya kobongisaka boyekoli na bango ya Biblia.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Zalá ndakisa malamu. (Ro 2:21) Ntango ozali kobongisa liteya mokomoko, kanisáká moyekoli yango. (km 11/15 3) Lakisá ye mokanda na yo oyo otye mikɔlɔtɔ na biyano

  • Lendisá ye abongisaka boyekoli. Ntango kaka moto andimi koyekola Biblia, yebisá ye ete esɛngaka ete moyekoli abongisa naino liboso boyekoli yango mpe monisá ye matomba na yango. Pesá ye toli oyo ekosalisa ye amona ndenge akoki kosomba ntango mpo na kobongisaka boyekoli na ye. Balakisi mosusu bapesaka bayekoli mokanda na bango oyo batye mikɔlɔtɔ ntango bazali koyekola na bango mpo na kosalisa bayekoli bámona litomba na yango. Pesá ye longonya ntango abongisi boyekoli

  • Lakisá ye ndenge ya kobongisa boyekoli. Kaka na ebandeli, balakisi mosusu balakisaka moyekoli ndenge ya kobongisa boyekoli na liteya ya mbala ya liboso