Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Ndenge malamu ya kokoma mokanda

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Ndenge malamu ya kokoma mokanda

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Mokanda ya 1 Bakorinti ezali moko ya mikanda 14 oyo ntoma Paulo akomaki mpo na kolendisa bandeko na ye bakristo. Ntango moto azali kokoma mokanda, azalaka na ntango ya kopona malamu maloba oyo akokoma mpe moto oyo batindeli ye mokanda yango akoki kotánga yango mbala na mbala. Kokoma mikanda ezali lolenge ya malamu ya kopesa bandeko ya libota mpe baninga na biso litatoli. Ezali mpe lolenge malamu ya kopesa litatoli epai ya bato oyo ndenge ya komona bango mpo na kosolola ezali te. Na ndakisa, moto akoki kosepela na nsango malamu kasi kokuta ye na ndako ezali mpasi. Ekoki kozala mpasi kokutana na bato mosusu ya teritware mpo bafandaka na buludingi oyo basoda bakɛngɛlaka, na mapango oyo epekisami kokɔta to na bisika ya mosika. Wapi makambo ya kobosana te ntango tozali kokoma mokanda, mingimingi mpo na moto oyo toyebani na ye te?

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Komá makambo oyo okoki koloba soki omoni moto yango na miso. Monisá na ebandeli ya mokanda soki ozali nani mpe lobá polele ntina oyo okomi mokanda yango. Mbala mosusu okoki kotuna motuna oyo ekotinda moto yango akanisa mpe lobelá site Internet na biso. Na nsima, yebisá ye ete boyekoli ya Biblia na Internet ezalaka, tozalaka mpe na programɛ ya koyekola na bato Biblia na bandako, to tángelá ye mwa mitó ya makambo oyo ezali na moko ya mikanda oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato Biblia. Okoki mpe kotya karte ya vizite, lokasa ya libyangi to trakte

  • Zalá mokuse. Kokoma makambo milaimilai te noki moto oyo otindeli ye yango alɛmba kotánga.​—Talá Ndenge ya kokoma mokanda

  • Tángá yango lisusu mpo omona soki ezali na bafoti mpe mpasi te na kotánga. Omindimisa ete ekomami na ndenge ya boboto, na mayele mpe na ndenge ebongi