Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kokoma mokanda

Ndenge ya kokoma mokanda
  • Tyá adrɛsi ya ndako na yo. Soki omoni ete ekozala malamu te kotya adrɛsi ya ndako na yo, okoki kotya oyo ya Ndako ya Bokonzi soki bankulutu bapesi yo ndingisa. Kasi osengeli SOKI MOKE TE kotya adrɛsi ya biro ya filiale.

  • Tyá nkombo ya moto soki oyebi yango, mpo emonana te lokola mokanda ya piblisite ya eloko moko ya kotɛka.

  • Tyá likebi na ebengeli ya maloba, na gramɛrɛ mpe na bilembo ya bopemi (ponctuation). Mokanda yango esengeli kozala pɛto, kasi salite te. Soki okomi yango na mabɔkɔ, esengeli kozala mpasi te na kotánga. Maloba oyo osaleli esengeli te kozala lokola okomeli moninga moko ya motema; kasi ezala mpe te lokola nde okomeli mokonzi moko boye.

Mokanda oyo totye awa emonisi makambo oyo tolobeli. Esɛngi te olanda liloba mokomoko ya mokanda yango mbala nyonso oyo olingi kokomela moto moko na teritware na bino. Komá mokanda na yo na kolanda mokano oyo okomi yango, makambo mpe mimeseno ya mboka na bino.