Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Salelá bavideo mpo na koteya bato oyo oyekolaka na bango Biblia

Salelá bavideo mpo na koteya bato oyo oyekolaka na bango Biblia

Kosalela bavideo to bililingi ebendaka likebi ya moto oyo azali kotala yango mpe esalisaka ye akanga ntina ya makambo oyo ayekoli mpe abosana yango te. Yehova Moteyi Monene, asalelaki mayele wana mpo na koteya mateya ya ntina mingi. (Eb 15:5; Yir 18:1-6) Yesu, Moteyi monene asalelaki mpe mayele yango. (Mt 18:2-6; 22:19-21) Kolakisa bavideo esalisi mingi mpenza na bambula oyo euti koleka. Osalelaka bavideo malamu ntango oyekolaka na bato Biblia?

Bavideo zomi ebongisami mpo na kosalisa biso tólakisa bayekoli ya Biblia ntango tozali koyekola na bango na mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! Mbala mingi, titre ya video mokomoko eyokanaka na moko ya mituna ya moindo makasi. Na jw.org, mwa buku yango ezali mpe na bisika ya kofina, oyo ezali kokundwela biso ntango nini kolakisa video mokomoko. Longola yango, bavideo mosusu ezali kobakisa makanisi na mikanda ndenge na ndenge oyo ezali na bisaleli na biso mpo na koteya.

Ozali kolobela lisolo moko ya Biblia oyo ekoki kozala mpasi mpo moyekoli na yo akanga ntina? To moyekoli na yo azali na likambo moko oyo ezali kotungisa ye? Lukáluká bavideo na site jw.org® mpe na TV JW® mpo omona video oyo ekosalisa ye. Bokoki kotala video yango elongo mpe na nsima kolobela yango.

Sanza nyonso bavideo ya sika ebimaka. Ntango ozali kotala yango, kanisá ndenge okoki kosalela yango mpo na koteya basusu.