Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAROMA 12-14

Komonisa bolingo ya bokristo elimboli nini?

Komonisa bolingo ya bokristo elimboli nini?

12:10, 17-21

Ntango moto moko asali biso mabe, bolingo ya bokristo esɛngi kaka te tóboya kozongisa mabe na mabe, kasi tósalela ye mpe likambo moko ya boboto. “Soki monguna na yo azali na nzala, pesá ye eloko alya; soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla; mpo ntango ozali kosala bongo ozali kotya makala ya mɔtɔ na motó na ye.” (Ro 12:20) Boboto oyo tokomonisela moto oyo asalaki biso mabe, ekoki kutu kotinda ye ayoka mawa mpo na mabe oyo asalaki.

Omiyokaki ndenge nini ntango moto moko oyo opesaki mpasi na motema na kozanga kokana asalelaki yo makambo na boboto?