Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kobanda lisolo

Ndenge ya kobanda lisolo

●○○ BOKUTANI YA LIBOSO

Motuna: Yesu azalaki nani?

Vɛrsɛ: Mt 16:16

Motuna oyo okotika: Mpo na nini Yesu akufaki?

○●○ KOZONGELA MOTO MPO NA MBALA YA LIBOSO

Motuna: Mpo na nini Yesu akufaki?

Vɛrsɛ: Mt 20:28

Motuna oyo okotika: Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu?

○○● KOZONGELA MOTO MPO NA MBALA YA MIBALE

Motuna: Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu?

Vɛrsɛ: Yn 17:3

Motuna oyo okotika: Makita ya Batatoli ya Yehova esalemaka ndenge nini?

KAMPANYE MPO NA KOBENGISA BATO NA EKANISELI (14/03–07/04):

“Toyei awa mpo na kobengisa yo na molulu moko ya ntina mingi oyo bamilio ya bato na mokili mobimba bakoyangana. Ezali molulu mpo na kokanisa liwa ya Yesu.” Lokasa na yo ya libyangi, yango oyo. “Lokasa ya libyangi oyo emonisi ngonga mpe esika oyo likita yango ekosalema. Tobengisi yo mpe pɔsɔ moko liboso ya molulu yango mpo oya kolanda diskur moko ya ntina mingi.”

Motuna oyo okotika soki moto asepeli: Mpo na nini Yesu akufaki?