Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Banani nakobengisa?

Banani nakobengisa?

Mbula nyonso tosalaka makasi mpo na kobengisa bato ya teritware na biso báya koyangana na biso na Ekaniseli. Mingi na bango ezalaka bato oyo toyebi te. Tosengeli mpe kobengisa bato oyo toyebi. Mbala mingi emonanaka ete bato oyo toyebani na bango bayaka soki tobengisi bango. (yb08-F lok. 12 par. 1; lok. 14 par. 1) Banani okoki kobengisa na Ekaniseli?

  • Bandeko ya libota

  • Baninga ya mosala to ya kelasi

  • Bato ya kartye

  • Bato oyo ozongelaka, bayekoli ya Biblia ya kala mpe ya sika

Longola yango, bankulutu bakobengisa bandeko oyo batiká kosakola. Bongo soki moto oyo boyebani na ye afandi mosika na teritware na bino? Okoki koluka ngonga mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema epai afandi soki ofini esika bakomi OLINGI KOYEBA BISO? na likoló ya lokasa ya ebandeli ya jw.org, mpe kende na esika bakomi “Ekaniseli.” Ntango ozali komibongisa mpo na Ekaniseli ya mbula oyo, meká komona na makanisi baoyo okoki kobengisa, mpe na nsima bengisá bango.