Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

16-22/03

EBANDELI 25-26

16-22/03
  • Loyembo 18 mpe libondeli

  • Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZANBE

  • Esau atɛki lotomo na ye ya mwana ya liboso”: (Min. 10)

    • Eb 25:27, 28​—Esau ná Yakobo bazalaki mapasa kasi bakesenaki mpenza na bizaleli mpe na makambo oyo bazalaki kosepela kosala (it-1-F lok. 1224)

    • Eb 25:29, 30​—Esau atikaki ete nzala mpe kolɛmba esala ete azwa bikateli ya mabe

    • Eb 25:31-34​—Esau atɛkaki na bozoba nyonso lotomo na ye ya mwana ya liboso mpo na bilei (w19.02 lok. 16 par. 11; it-2-F lok. 637)

  • Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)

    • Eb 25:31-34​—Mpo na nini tokoki te koloba ete lisolo oyo emonisi ete bankɔkɔ nyonso ya Masiya basengelaki kozala bana ya liboso? (Ebr 12:16; w17.12 lok. 15 par. 5-7)

    • Eb 26:7​—Mpo na nini Yisaka alobaki mpenza solo te na libaku oyo? (it-2-F lok. 255 par. 6)

    • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?

  • Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Eb 26:1-18 (th liteya 5)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Min. 5) Lisolo na bayangani. Lakisá video mpe na nsima tuná bayangani mituna oyo: Ndenge nini tokoki koboya koyokisa nkolo-ndako nsɔni soki ayebi eyano te na motuna oyo totuni? Ndenge nini mosakoli akanisaki malamu elongo na ye na Matai 20:28?

  • Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 4 te) Salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 3)

  • Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima pesá ye buku Mateya ya Biblia. (th liteya 15)

BOMOI YA BAKRISTO