Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

23-29/03

EBANDELI 27-28

23-29/03
  • Loyembo 10 mpe libondeli

  • Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

  • Yakobo azwi lipamboli oyo ebongi mpenza azwa”: (Min. 10)

    • Eb 27:6-10​—Rebeka asalisaki Yakobo mpo azwa lipamboli oyo ebongaki azwa (w04 15/4 lok. 11 par. 4-5)

    • Eb 27:18, 19​—Yakobo akosaki tata na ye ete ye nde Esau (w07 1/10 lok. 31 par. 2-3)

    • Eb 27:27-29​—Yisaka apesaki Yakobo lipamboli ya mwana ya liboso (it-1-F lok. 295 par. 6)

  • Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)

    • Eb 27:46–28:2​—Mateya nini bato oyo babalá bakoki kozwa na lisolo oyo? (w06 15/4 lok. 6 par. 3-4)

    • Eb 28:12, 13​—“Eskalye” oyo Yakobo amonaki na ndɔtɔ ezali na ndimbola nini? (w04 15/1 lok. 28 par. 6)

    • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?

  • Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Eb 27:1-23 (th liteya 2)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Min. 5) Lisolo na bayangani. Lakisá video mpe na nsima tuná bayangani mituna oyo: Ndenge nini mosakoli amonisaki ete azalaki koyoka na likebi ntango nkolo-ndako azalaki koloba? Ndenge nini mosakoli asalelaki malamu bisaleli mpo na koteya?

  • Kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Eleka min. 3 te) Salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya mibale oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 6)

  • Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 5 te) jl liteya 17 (th liteya 11)

BOMOI YA BAKRISTO