Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

30/03–05/04

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kopesa bato oyo bakufá miso litatoli

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kopesa bato oyo bakufá miso litatoli

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Bato mingi oyo bakufá miso basepelaka mpenza te kosolola na bato oyo bayebi te. Na yango, esɛngi kozala na mayele mpo na ‘koluka’ bato ya ndenge wana mpo na kopesa bango litatoli. Yehova atyelaka bato oyo bakufá miso likebi mpe alingaka bango. (Le 19:14) Tokoki komekola Yehova ntango tozali kosalisa bato oyo bakufá miso báyeba ye mpe bákóma baninga na ye.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • ‘Luká’ bato oyo bakufá miso. (Mt 10:11) Oyebi moto moko oyo azalaka na ndeko oyo akufá miso? Na teritware na bino ezali nde na biteyelo, bandako ya bato ya maladi to bisika mosusu oyo bato bakosepela na mikanda na biso oyo babimisá mpo na bato oyo bakufá miso?

  • Tyelá bango likebi. Soki ozali kozwa moto oyo akufá miso lokola moninga mpe kotyela ye mpenza likebi ekosala ete amiyoka malamu ntango ozali kosolola na ye. Meká kobanda lisolo na likambo moko oyo ezali kobenda likebi na ye

  • Salisá bango na elimo. Mpo na kosalisa bato oyo bakufá miso to baoyo bamonaka malamu te, ebongiseli ya Yehova ebimisá mikanda ebele mpe na ndenge ebele. Tuná moto oyo akufá miso ayebisa yo lolenge ya boyekoli oyo akosepela na yango. Mokɛngɛli ya mosala ya kosakola asengeli komindimisa soki ndeko oyo atalelaka mikanda asɛngaka mikanda oyo bato oyo bakufá miso basepelaka na yango.