Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 29-30

Yakobo abali

Yakobo abali

29:18-28

Yakobo ayebaki te liboso mikakatano oyo ezalaki kozela ye nsima ya libala na ye. Rashele ná Lea bakómaki bambanda. (Eb 29:32; 30:1, 8) Atako akutanaki na mikakatano, Yakobo amonaki mpenza ndenge Yehova azalaki kosalisa ye. (Eb 30:29, 30, 43) Na ntembe te, momboto na ye ekómaki ekólo ya Yisraele.​—Rt 4:11.

Lelo mpe, baoyo baponi kobala bakokutana na mikakatano. (1Ko 7:28) Kasi soki batyeli Yehova motema mpe basaleli mitinda na ye, bakoki kolonga na libala na bango mpe kozala na esengo.​—Mas 3:5, 6; Ef 5:33.