Bandeko bazali na liyangani oyo esangisaki bato ya mikili mingi na 2014, na New Jersey, États-Unis

MOKANDA YA LIKITA BOMOI MPE MOSALA Sanza ya Avril 2016

Ndenge ya kobanda lisolo

Makanisi mpo na kokabola Lamuká! mpe buku Biblia eteyaka. Salelá makanisi oyo mpo na kokoma maloba na yo moko ya kobanda lisolo.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Lendisáká basusu na maloba ya boboto

Baninga misato ya Yobo balendisaki ye te, kutu babakiselaki ye nde mpasi na maloba ya mabe na bango mpe na makambo oyo bakoselaki ye. (Yobo 16-20)

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kobanda kosolola na moto masolo ya Biblia

Salelá lisolo “Biblia elobi nini?” mpo na kobanda kosolola na bato masolo ya Biblia

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Yobo atɛmɛlaki makanisi mabe

Monisá bokeseni kati na lokuta ya Satana ná ndenge oyo Yehova atalelaka biso mpenza. (Yobo 21-27)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Yobo azali ndakisa na likambo etali bosembo

Yobo azalaki na ekateli ya kotosa mibeko ya Yehova mpe komekola boyengebene na ye. (Yobo 28-32)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Moninga ya solosolo apesaka toli oyo elendisaka

Mekolá lolenge malamu oyo Elihu asalisaki moninga na ye Yobo. (Job 33-37)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Liyangani ya etúká

Makambo oyo osengeli kobosana te ntango ozali kokabola nkasa ya libyangi ya Liyangani ya etúká. Salelá makanisi oyo epesami mpo na kokabola yango.

BOMOI YA BAKRISTO

Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Liyangani ya etúká

Kanisá na ndenge oyo okoki komonisela basusu bolingo na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova.