Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kobanda lisolo

Ndenge ya kobanda lisolo

LAMUKÁ!

Okoki koloba boye: Nasepeli kopesa yo nimero ya sika ya Lamuká!

Motuna: Talá motuna oyo ezali na lokasa 2. Okanisi nini mpo na yango?

Vɛrsɛ: Lk 7:35

Lisolo oyo emonisi ndenge toli yango etaleli mpenza Biblia.

LAMUKÁ!

Motuna: Okanisi ete ebongi mpenza kolanda toli oyo?

Vɛrsɛ: Mt 6:34

Okoki koloba boye: [Lakisá ye lisolo “Makanisi ya Biblia—Mitungisi.”] Lisolo oyo emonisi ndenge Biblia ekoki kosalisa biso tólonga mitungisi.

Biblia eteyaka

Motuna: Bato mingi oyo bandimelaka Nzambe basepelaka mpe kopusana penepene na ye. Oyebaka ete Biblia esɛngi biso tópusana penepene na Nzambe?

Vɛrsɛ: Yk 4:8a

Okoki koloba boye: Mokanda oyo esalemi mpo na kosalisa biso tóyekola makambo mingi oyo etali Nzambe na lisalisi ya Biblia. [Lobelá makanisi ya ntina ya mokapo 1 ya buku Biblia eteyaka.]

KOMÁ MALOBA NA YO MOKO YA KOBANDA LISOLO

 

Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.