Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 21-27

Yobo atɛmɛlaki makanisi mabe

Yobo atɛmɛlaki makanisi mabe

Lelo oyo, Satana asalelaka lokuta mpo na kolɛmbisa basaleli ya Yehova. Tyá likebi ndenge mokanda ya Yobo emonisi bokeseni oyo ezali kati na lokuta ya Satana mpe ndenge oyo Yehova atalelaka mpenza bato. Komá bavɛrsɛ mosusu oyo endimisaka yo ete Yehova atyelaka yo likebi.

LOKUTA OYO SATANA ALOBAKA

NDENGE YEHOVA ATALELAKA BISO

Nzambe azalaka makambo makasimakasi mpe eloko nyonso oyo basaleli na ye basalaka ezalaka na ntina te na miso na ye. Ekelamu moko te ekoki kosepelisa ye (Yb 4:18; 25:5)

Yehova asepelaka na milende oyo tosalaka (Yb 36:5)

Moto azali na ntina te na miso ya Nzambe (Yb 22:2)

Yehova andimaka mpe apambolaka mosala oyo tosalelaka ye na bosembo (Yb 33:26; 36:11)

Ozala sembo to te esalaka Nzambe eloko te (Yb 22:3)

Yehova atyelaka bayengebene likebi (Yb 36:7)