Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Liyangani ya etúká

Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Liyangani ya etúká

Mbula na mbula, tozelaka na esengo nyonso kolya bilei ya elimo na Liyangani ya etúká. Mpo bato mosusu mpe bámeka mpe bámona bolamu ya Yehova, tokobengisa bato ebele mpenza báyangana elongo na biso. (Nz 34:8) Lisangani mokomoko ya bankulutu ekotalela oyo bakoki kosala mpo nkasa ya libyangi ekabolama malamu mpenza.

MAKAMBO OYO ESENGELI KOBOSANA TE

  • Liyangani na biso ekobanda mokolo nini?

  • Lisangá na biso ekobanda kampanye mokolo nini?

  • Ntango nini tosalaka makita ya mosala ya kosakola?

  • Mikano nini namityeli mpo na Kampanye oyo?

  • Nakani kobengisa banani?

OKOLOBA NINI?

Nsima ya kopesa mbote ndenge esalemaka epai na bino, okoki koloba boye:

“Tozali kosala kampanye na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na liyangani moko ya ntina mingi. Mokolo, ngonga mpe esika ezali na lokasa oyo. Tokosepela soki oyei koyangana elongo na biso.”

NDENGE YA KOKOLISA MPOSA YA MOTO OYO ASEPELI?

Atako tolingi kobengisa bato mingi na Liyangani, tosengeli kotya likebi mpo na kokolisa mposa ya moto nyonso oyo asepeli na nsango na biso.

Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, okoki kokabola zulunalo elongo na lokasa ya libyangi.