Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 33-37

Moninga ya solosolo apesaka toli oyo elendisaka

Moninga ya solosolo apesaka toli oyo elendisaka

Ntango Elihu abandaki koloba, toli na ye ekesanaki mpenza na oyo ya Elifaze, Biledade, mpe Zofare ezala na makambo oyo alobaki, ezala mpe na ezaleli oyo amoniselaki Yobo. Azalaki mpenza moninga ya solosolo mpe mopesi-toli malamu oyo ebongi tómekola.

MOPESI-TOLI MALAMU ASENGELI . . .

ELIHU ATIKÁ NDAKISA MALAMU

32:4-7, 11, 12; 33:1

 

  • KOZALA MOTEMA MOLAI

  • KOYOKAKA NA LIKEBI

  • KOZALA NA LIMEMYA

 
  • Elihu azelaki mpenza mikóló básilisa naino koloba liboso azwa maloba

  • Lokola azwaki ntango ya koyoka malamumalamu, akangaki mpenza ntina ya likambo yango liboso apesa toli

  • Abengaki Yobo na nkombo na ye mpe asololaki na ye lokola moninga

 

33:6, 7, 32

 

  • KOZALA NA KOMIKITISA

  • KOZALA MOTO OYO BABANGAKA TE KOSOLOLA NA YE

  • KOMITYAKA NA ESIKA YA BASUSU

 
  • Elihu azalaki na komikitisa mpe boboto, andimaki mpe ete azali moto ya kozanga kokoka

  • Amityaki na esika ya Yobo mpe ayokaki mpasi ndenge azalaki konyokwama

 

33:24, 25; 35:2, 5

 

  • KOZALA NA BOKATIKATI

  • KOZALA NA BOBOTO

  • KOZALA MOTO OYO ALUKAKA LITAMBWISI YA NZAMBE

 
  • Na boboto nyonso, Elihu amonisaki Yobo ete azalaki na makanisi ya libunga

  • Elihu asalisaki Yobo amona ete boyengebene na ye ezalaki te likambo eleki ntina

  • Toli malamu oyo Elihu apesaki esalisaki Yobo andima malako mosusu oyo Yehova apesaki ye na nsima