Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Liyangani ya etúká

Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Liyangani ya etúká

Kaka ndenge tosalaka banda kala, tosengeli komonisa bolingo mpo na Nzambe mpe bazalani na biso na boumeli ya eleko ya liyangani ya etúká. (Mt 22:37-39) Mokanda ya 1 Bakorinti 13:4-8 emonisi soki bolingo ezali mpenza nini; elobi boye: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. . . . Esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. . . . Bolingo esilaka soki moke te.” Ntango ozali kotala video Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Liyangani ya etúká, kanisá ndenge okoki komonisela basusu bolingo na liyangani ya etúká.

NDENGE NINI TOKOKI KOMONISA BOLINGO NTANGO . . .

  • tozali kokanga bisika ya kofanda?

  • miziki elingi ebanda?

  • tozali na bisika oyo tokolala mpo na liyangani?

  • tolingi kopesa mabɔkɔ na misala ya liyangani?