Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kobanda kosolola na moto masolo ya Biblia

Ndenge ya kobanda kosolola na moto masolo ya Biblia

Banda sanza ya 01/2016, lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ekómá na lisolo oyo elobi “Biblia elobi nini?” Lisolo yango ya sika ebimisami mpo na kosalisa biso tóbanda kosolola na bato masolo ya Biblia mpe ebongisami ndenge kaka batrakte ezalaka. Ezali na motuna moko oyo ekotinda moto apesa makanisi na ye, ezali mpe na eyano oyo Biblia epesi ná makambo mosusu ya kotalela.

Mbala mingi kosolola na bato masolo kitoko ya Biblia esalaka ete bándima koyekola Biblia. Salelá lisolo oyo ya sika mpo na kosalisa bato mingi bákokisa mposa na bango ya elimo.Mt 5:6.

NDENGE YA KOSALELA YANGO:

  1. Sɛngá moto apesa likanisi na ye na moko ya mituna

  2. Yoká ye mpe koboya eyano na ye te

  3. Tángá vɛrsɛ oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Oyo Biblia elobi,” mpe sɛngá ye apesa likanisi na ye mpo na vɛrsɛ yango. Soki azali na ntango, kobá lisolo mpe salelá makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Makambo nini mosusu tokoki koyekola na Biblia?”

  4. Pesá ye zulunalo

  5. Zwá bibongiseli mpo na kozongela ye mpo bótalela motuna ya mibale