Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kokabola mikanda

Ndenge ya kokabola mikanda

LAMUKÁ!

Motuna: Lelo oyo, bafilme ná bateyatre mingi elakisaka bilima, lokola bazombi, ba vampires, mpe bongo na bongo. Okanisi nini? Nyonso wana esalaka eloko te, to ezali na likama oyo tomonaka te?

Okoki koloba: Lamuká! oyo emonisi ntina oyo bato balukaka koyeba makambo ya bilima mpe nguya oyo ezalaka nsima na yango.

KOBANDA LISOLO: TEYÁ SOLO

Motuna: Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano ya mokili oyo?

Vɛrsɛ: Mt 6:10

Solo: Bokonzi ya Nzambe ekotya kimya, boyokani mpe ekolongola kobanga na mabele, kaka ndenge esili kosala yango na likoló.

BOKONZI YA NZAMBE EZALI NINI? (Kozongela moto)

Motuna: [Lakisá ye motuna oyo ezali na nsima ya trakte yango.] Bomoi ekozala ndenge nini ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela?

Bavɛrsɛ: Nz 37:29; Yis 65:21-23

Okoki koloba: [Lakisá mwa buku Nsango malamu.] Liteya 7 ya mwa buku oyo emonisi bolamu oyo bilaka yango ekopesa ngai ná yo. [Bandá boyekoli na mwa buku yango.]

KOMÁ MALOBA NA YO MOKO

Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.