Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YIRIMIA 22-24

Ozali na “motema mpo na koyeba” Yehova?

Ozali na “motema mpo na koyeba” Yehova?

Yehova akokanisaki bato na figi

24:5

  • Bato ya sembo kati na Bayuda oyo bautaki na boombo na Babilone bazalaki lokola figi ya malamu

24:8

  • Mokonzi Zidikiya oyo azalaki sembo te ná bato mosusu oyo bazalaki kosala mabe bazalaki lokola figi ya mabe

Ndenge nini tokoki kozwa “motema mpo na koyeba” Yehova?

24:7

  • Yehova akopesa biso “motema mpo na koyeba” ye soki tozali koyekola Liloba na ye mpe kosalela yango

  • Tosengeli kotalela motema na biso na bosembo mpe kolongola makanisi mpe mposa nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova

Omituna: Nazalaka na “motema mpo na koyeba” Yehova? Ndenge nini nakoki kokóma na motema ya ndenge wana?