Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YIRIMIA 25-28

Zalá na mpiko lokola Yirimia

Zalá na mpiko lokola Yirimia

Yirimia asakolaki ete Yerusaleme ekobebisama nyɛɛ lokola Shilo

26:6

  • Sanduku ya kondimana oyo ezalaki komonisa Yehova ezalaki kofanda liboso na Shilo

  • Yehova atikaki Bafilistia bábɔtɔla Sanduku yango, mpe ezongaki lisusu na Shilo te

Banganga-nzambe, basakoli, mpe bato nyonso ya ekólo balingaki koboma Yirimia

26:8, 9, 12, 13

  • Bato bakangaki Yirimia mpo asakolaki ete Yerusaleme ná tempelo ekobebisama

  • Yirimia alɛmbaki te mpe akimaki

Yehova abatelaki Yirimia

26:16, 24

  • Yirimia abatelaki mpiko na ye, mpe Yehova asundolaki ye te

  • Nzambe atindaki Ahikame, mobali ya mpiko, abatela Yirimia

Na boumeli ya mbula 40, Yirimia asakolaki nsango oyo bato bazalaki kolinga te mpo Yehova asalisaki ye mpe alendisaki ye