Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YIRIMIA 17-21

Tiká Yehova abongisa makanisi mpe bizaleli na yo

Tiká Yehova abongisa makanisi mpe bizaleli na yo

Ndimá Yehova abongisa yo

18:1-11

  • Yehova abongisaka bizaleli na biso na nzela ya toli to disiplini

  • Tosengeli kotika abongisa biso mpe tosengeli kotosa ye

  • Yehova atindaka biso na makasi te ete tósala makambo oyo tolingaka te

Moyemi-mbɛki akoki kosala na mbɛki nyonso oyo alingi

  • Lokola Yehova apesá biso bonsomi ya kopona, tokoki kondima abongisa biso to koboya

  • Yehova asalelaka bato makambo na kolanda ndenge bazali kotalela litambwisi na ye

Na makambo nini esengeli Yehova abongisa ngai?