Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tóyamba bango na esengo

Tóyamba bango na esengo

Tóyamba banani? Moto nyonso oyo ayei na makita na biso: ezala bato ya sika to bandeko ya kala. (Ro 15:7; Ebr 13:2) Ekoki kozala ndeko oyo auti mboka mopaya to ndeko oyo atiká kosakola ayei na makita mbala ya liboso nsima ya bambula ebele. Olingaki komiyoka ndenge nini soki ezalaki yo? Na ntembe te okosepela soki bapesi yo mbote na esengo! (Mt 7:12) Na yango, mpo na nini te kosala makasi kotambola na Ndako ya Bokonzi mpo na kopesa basusu mbote liboso mpe nsima ya makita? Yango ebakisaka esengo, bolingo, mpe ekumisaka Yehova. (Mt 5:16) Ya solo, mbala mosusu ntango ekozala te ya kosolola na moto nyonso. Atako bongo, moto nyonso akozala na esengo soki tosali oyo esengeli. *

Tosengeli kaka te koyamba bapaya na ntango ya milulu ya ntina mingi lokola na Ekaniseli, kasi ntango nyonso. Soki bato ya sika bamoni polele ete biso bakristo tolinganaka, ekoki kotinda bango básanzola Nzambe mpe báya na losambo ya solo.Yn 13:35.

^ par. 3 Toli ya Biblia epesi biso nzela te ya kosolola na bato oyo babimisamá na lisangá to baoyo baboyá Yehova ata soki bayei na makita.1Ko 5:11; 2Yn 10.