Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Luká koteyama na Nzambe

Luká koteyama na Nzambe

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Yehova, Molakisi monene, apesaka biso mateya ya malamu koleka. Alakisaka biso ndenge ya kozala na bomoi ya malamu mpe azali kobongisa biso mpo na avenire malamu​—nyonso wana ofele! (Yis 11:6-9; 30:20, 21; Em 22:17) Na nzela ya mateya na ye, Yehova abongisaka biso mpo na kosakwela basusu nsango ya lobiko.​—2Ko 3:5.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Monisá ezaleli ya komikitisa.​—Nz 25:8, 9

  • Ndimá formasyo oyo Yehova azali kopesa yo sikoyo, na ndakisa kondima kosala badevuare ya bana-kelasi na likita ya kati ya pɔsɔ

  • Mityelá mikano ya elimo.​—Flp 3:13

  • Mipimelá makambo mosusu mpo okokisa masɛngami mpo na kozwa formasyo mosusu.​—Flp 3:8

TALÁ VIDEO MATEYA YA YEHOVA EKÓMISI BANGO BAZWI NA ELIMO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mikakatano nini basakoli mosusu balongaki mpo bákɔta Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi?

  • Formasyo nini Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi epesaka?

  • Ndenge nini bandeko ya lisangá basalisaki bandeko oyo bazwaki diplome na eteyelo yango na mikumba na bango ya sika?

  • Masɛngami nini moto asengeli kokokisa mpo akɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi? (kr lok. 189)

  • Formasyo nini mosusu okoki kozwa na ebongiseli ya Yehova?

Mapamboli nini okozwa soki oluki koteyama na Nzambe?