Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge nini okoki komibongisa mpo na Ekaniseli?

Ndenge nini okoki komibongisa mpo na Ekaniseli?

Kobanda mbula oyo, tokozala na ntango mingi ya komibongisa mpo na Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Soki mokolo ya Ekaniseli ekwei na mikolo ya kati ya pɔsɔ, likita Bomoi mpe mosala ekosalema te na pɔsɔ yango. Soki ekwei mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo, diskur ya bato nyonso mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekosalema te. Okosalela malamu ntango oyo ekotikala, na kati ya programɛ na yo? Kaka ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, esengeli kozwa bibongiseli oyo ebongi mpo na molulu wana ya ntina mingi. (Lk 22:7-13; km 3/15 lok. 1) Kasi biso nyonso tosengeli kobongisa mitema na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?

  • Kanisá ntina ya koyangana na Ekaniseli.​—1Ko 11:23-26

  • Bondelá mpe kanisá soki boyokani na yo na Yehova ezali ndenge nini.​—1Ko 11:27-29; 2Ko 13:5

  • Tángá mpe manyolá bavɛrsɛ oyo elobeli ntina ya Ekaniseli.​—Yn 3:16; 15:13

Basakoli mosusu batángaka mpe bamanyolaka bavɛrsɛ oyo ezali na programɛ ya kotánga Biblia na eleko ya Ekaniseli oyo ezali na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Basusu batángaka mikapo oyo ezali na etanda oyo ezali awa na nse. Kasi basusu batalelaka lisusu masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli Ekaniseli mpe bolingo oyo Yehova ná Yesu bamoniselaki biso. Tiká ete programɛ nyonso ya boyekoli oyo okopona ekómisa boyokani na yo na Yehova mpe Mwana na ye makasi.