Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKORINTI 10-13

Yehova azali sembo

Yehova azali sembo

10:13

Yehova akoki kolongola komekama soki alingi. Kasi, mbala mingi abongiselaka biso “nzela ya kobima” na ndenge apesaka biso oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko na komekama.

  • Akoki kosalisa biso tókanisa malamu; kolendisa mpe kobɔndisa biso na nzela ya Biblia, ya elimo santu na ye, mpe ya moombo ya sembo.​—Mt 24:45; Yn 14:16; Ro 15:4

  • Akoki kosalela elimo santu na ye mpo na kotambwisa biso mpe yango ekoki kosalisa biso tókanisa lisusu masolo mpe mitinda ya Biblia oyo na nsima ekosalisa biso tózwa bikateli oyo ebongi.​—Yn 14:26

  • Akoki kosalela baanzelu na ye mpo na kosalisa biso.​—Ebr 1:14

  • Akoki kosalela bandeko ya lisangá mpo na kosalisa biso.​—Kol 4:11