Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

06-12/04

Ekaniseli ya liwa ya Kristo ekosalema na mokolo ya mibale mwa 07/04/2020

06-12/04

Mbula nyonso na eleko ya Ekaniseli, bakristo mingi bamanyolaka na bolingo monene oyo Yehova ná Mwana na ye, Yesu Kristo bamoniselaki biso. (Yn 3:16; 15:13) Okoki kosalela etanda oyo mpo na koluka bavɛrsɛ oyo ezali na Baevanzile oyo elobeli makambo oyo Yesu asalaki na Yerusaleme liboso akufa. Eteni 6 ya buku Yesu azali nzela, solo mpe bomoi elobeli makambo yango. Bolingo ya Nzambe mpe ya Kristo ekotinda yo osala nini?​—2Ko 5:14, 15; 1Yn 4:16, 19.

ETENI YA NSUKA YA MOSALA YA YESU NA YERUSALEME

Ntango

Esika

Likambo

Matai

Marko

Luka

Yoane

33, 8 Nisana (01-02/04/2020)

Betania

Yesu akómi mikolo motoba liboso ya Elekeli

 

 

 

11:55–12:1

9 Nisana (02-03/04/2020)

Betania

Maria apakoli ye mafuta na motó mpe na makolo

26:6-13

14:3-9

 

12:2-11

Betania-Betefage-Yerusaleme

Akɔti na Yerusaleme lokola mokonzi, amati na mpunda

21:1-11, 14-17

11:1-11

19:29-44

12:12-19

10 Nisana (03-04/04/2020)

Betania-Yerusaleme

Alakeli nzete ya figi mabe; apɛtoli lisusu tempelo

21:18, 19; 21:12, 13

11:12-17

19:45, 46

 

Yerusaleme

Banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bazali koluka mayele mpo báboma Yesu

 

11:18, 19

19:47, 48

 

Yehova alobi; Yesu asakoli liwa na ye; kozanga kondima ya Bayuda ekokisi esakweli ya Yisaya

 

 

 

12:20-50

11 Nisana (04-05/04/2020)

Betania- Yerusaleme

Liteya ya nzete ya figi oyo ekauki

21:19-22

11:20-25

 

 

Yerusaleme, tempelo

Batyeli bokonzi na ye ntembe; ndakisa ya bana mibale

21:23-32

11:27-33

20:1-8

 

Bandakisa: basali-bilanga oyo bazalaki babomi, fɛti ya libala

21:33–22:14

12:1-12

20:9-19

 

Ayanoli mituna oyo etali Nzambe mpe Kaisala, lisekwa, mobeko oyo eleki monene

22:15-40

12:13-34

20:20-40

 

Atuni ebele ya bato soki Kristo azali mwana ya Davidi

22:41-46

12:35-37

20:41-44

 

Mawa na bakomeli mpe Bafarisai

23:1-39

12:38-40

20:45-47

 

Amoni likabo ya mwasi oyo mobali akufá

 

12:41-44

21:1-4

 

Ngomba ya Olive

Apesi elembo ya kozala na ye

24:1-51

13:1-37

21:5-38

 

Bandakisa: bangɔndɔ zomi, batalanta, bampate ná bantaba

25:1-46

 

 

 

12 Nisana (05-06/04/2020)

Yerusaleme

Bakonzi ya Bayuda basali likita báboma ye

26:1-5

14:1, 2

22:1, 2

 

Yudasi ayokani na bakonzi ya mangomba mpo na kotɛka Yesu

26:14-16

14:10, 11

22:3-6

 

13 Nisana (06-07/04/2020)

Yerusaleme mpe zingazinga na yango

Azali kobongisa Elekeli ya nsuka

26:17-19

14:12-16

22:7-13

 

14 Nisana (07-08/04/2020)

Yerusaleme

Alei Elekeli elongo na bantoma

26:20, 21

14:17, 18

22:14-18

 

Asukoli bantoma makolo

 

 

 

13:1-20

Yesu amoni ete Yudasi akotɛka ye mpe abimisi ye

26:21-25

14:18-21

22:21-23

13:21-30

Abandisi Bilei ya Mpokwa ya Nkolo (1Ko 11:23-25)

26:26-29

14:22-25

22:19, 20, 24-30

 

Asakoli ete Petro akowangana ye mpe bantoma bakopanzana

26:31-35

14:27-31

22:31-38

13:31-38

Alaki mosungi; ndakisa ya nzete ya vinyo ya solosolo; apesi etinda ya bolingo; libondeli ya nsuka elongo na bantoma

 

 

 

14:1–17:26

Getesemane

Atungisami mingi mpenza na elanga; batɛki Yesu mpe bakangi ye

26:30, 36-56

14:26, 32-52

22:39-53

18:1-12

Yerusaleme

Anasi atuni ye mituna; Kaifa asambisi ye, Sanedrina; Petro awangani ye

26:57–27:1

14:53–15:1

22:54-71

18:13-27

Yudasi moto oyo atɛkaki Yesu akei komiboma (Mis 1:18, 19)

27:3-10

 

 

 

Bamemi ye epai ya Pilate, na nsima epai ya Erode, mpe bazongisi ye lisusu epai ya Pilate

27:2, 11-14

15:1-5

23:1-12

18:28-38

Pilate aluki atika ye kasi basɛngi nde Barabasi; bakateli ye etumbu ya liwa na nzete ya mpasi

27:15-30

15:6-19

23:13-25

18:39–19:16

(s. 3:00 nsima ya midi)

Golgota

Akufi na nzete ya mpasi

27:31-56

15:20-41

23:26-49

19:16-30

Yerusaleme

Balongoli nzoto na ye na nzete mpe batye yango na lilita

27:57-61

15:42-47

23:50-56

19:31-42

15 Nisana (08-09/04/2020)

Yerusaleme

Banganga-nzambe ná Bafarisai batindi bákɛngɛla lilita mpe bázipa yango

27:62-66

 

 

 

16 Nisana (09-10/04/2020)

Yerusaleme mpe zingazinga na yango; Emause

Yesu asekwi; abimeli bayekoli mbala mitano

28:1-15

16:1-8

24:1-49

20:1-25

Nsima ya 16 Nisana

Yerusaleme; Galile

Abimeli bayekoli mbala ebele lisusu (1Ko 15:5-7; Mis 1:3-8); apesi malako; apesi etinda ya kokómisa bato bayekoli

28:16-20

 

 

20:26–21:25