Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

13-19/04

EBANDELI 31

13-19/04
  •  Loyembo 112 mpe libondeli

  •  Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

  • Yakobo ná Labana basali kondimana ya kimya”: (Min. 10)

    • Eb 31:44-46​—Yakobo ná Labana basalaki libondo ya mabanga likoló na yango balyaki bilei ya kondimana (it-1-F lok 943 par. 5)

    • Eb 31:47-50​—Babengaki esika yango Galede mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (it-2-F lok. 1089 par. 11)

    • Eb 31:51-53​—Basalaki elako ya kobatela kimya kati na bango mibale

  • Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)

    • Eb 31:19​—Mpo na nini Rashele ayibaki ekeko ya terafime ya tata na ye? (it-2-F lok. 1062 par. 4)

    • Eb 31:41, 42​—Ndakisa ya Yakobo eteyi biso nini soki tozali kosala epai ya bapatrɔ oyo bazalaka “matata”? (1Pe 2:18; w13 15/3 lok. 21 par. 8)

    • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?

  • Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Eb 31:1-18 (th liteya 10)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • Video mpo na bokutani ya liboso: (Min. 4) Lisolo na bayangani. Lakisá video mpe na nsima tuná bayangani mituna oyo: Ndenge nini ndeko mwasi amonisi polele ndenge ya kosalela vɛrsɛ? Alobaki nini mpo abongisa nzela mpo na kozongela nkolo-ndako?

  • Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá eyano na ntembe moko oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino. (th liteya 4)

  • Bokutani ya liboso: (Eleka min. 5 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Mpe na nsima pesá nkolo-ndako mwa buku Nsango malamu mpe bandá boyekoli ya Biblia, na liteya 5. (th liteya 8)

BOMOI YA BAKRISTO