Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Makambo nini eleki ntina mpo na ngai?

Makambo nini eleki ntina mpo na ngai?

Yakobo abundaki na anzelu mpo na kozwa eloko moko eleki ntina mingi; elingi koloba lipamboli ya Yehova. (Eb 32:24-31; Hos 12:3, 4) Bongo biso? Tozali nde na mposa mpenza ya kosala milende mpo na kotosa Yehova mpe kozwa lipamboli na ye? Na ndakisa, soki esɛngi tópona koyangana na makita ya lisangá ná kosala mosala ya kobikela nsima ya ngonga ya mosala, tokopona nini? Ntango topesaka Yehova eloko oyo eleki malamu na ndakisa, ntango, makasi mpe biloko na biso ya kobikela, asopelaka biso ‘lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te.’ (Mal 3:10) Akotambwisa, akobatela biso mpe akokokisa bamposa na biso.​—Mt 6:33; Ebr 13:5.

TALÁ VIDEO KANGAMÁ NA MIKANO YA ELIMO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini likambo oyo alingaki ekómelaki ye komekama?

  • Ndenge nini mosala na biso ekoki kokóma komekama mpo na biso?

  • Mpo na nini Timote asengelaki kokangama na mikano oyo amityelaki atako azalaki moto oyo akomeli na elimo?​—1Ti 4:16

  • Makambo nini eleki ntina na bomoi na yo?

    “Mosala na biso oyo eleki ntina” ezali nini, mpe ndenge nini tomonisaka ete eleki ntina?