Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 32-33

Ozali nde kobunda mpo na kozwa lipamboli?

Ozali nde kobunda mpo na kozwa lipamboli?

32:24-28

Mpo tózwa lipamboli ya Yehova, tosengeli kosala makasi mpo na kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso. (1Ko 9:26, 27) Ntango tozali kokokisa mikumba ya bokristo, tosengeli kozala na makanisi oyo Yakobo azalaki na yango ntango abundaki na anzelu. Tokomonisa ete tozali mpenza na mposa ya kozwa lipamboli ya Yehova soki . . .

  • Tozali kobongisa malamu makita ya lisangá

  • Tozali kosakola mbala na mbala

  • Tozali kosala makasi mpo na kosunga bandeko na lisangá

Ezala ozali na mikakatano nini, bondeláká Yehova ntango nyonso asalisa yo mpe luká kozwa lipamboli na ye na milende makasi oyo ozali kosala mpo na kosalela ye.

OMITUNA BOYE: ‘Na makambo nini na bomoi na ngai nakoki kobakisa lisusu molende mpo nazwa lipamboli ya Yehova?’