Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

“Bólongola banzambe ya bapaya”

“Bólongola banzambe ya bapaya”

Atako Yehova apesaki naino te mobeko oyo epekisaki kosambela bikeko, Yakobo ayebaki ete Yehova asɛngaka kokangama kaka na ye. (Kob 20:3-5) Na nsima, Yehova ayebisaki ye azonga na Betele, Yakobo apesaki motindo ete bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bálongola bikeko na bango. Na yango, Yakobo asangisaki bikeko yango mpe akundaki yango, ezala mpe biloko ya matoi, oyo ntango mosusu ekokaki kozala na bikelakela. (Eb 35:1-4) Na ntembe te, Yehova asepelaki na makambo oyo Yakobo asalaki.

Lelo oyo mpe, tokoki kosala nini mpo tókangama kaka na Yehova? Tosengeli koboya eloko nyonso oyo ezali na boyokani na losambo ya bikeko to misala ya bilimo mabe. Yango esangisi kokabwana na eloko nyonso oyo ezali na boyokani na bademo mpe kotalela malamumalamu kominanola oyo tosalaka. Na ndakisa, omituna boye: ‘Nasepelaka na babuku to bafilme oyo elobelaka ba-vampire, ba-zombi, to makambo oyo eleki mayele ya bato? Babuku to bafilme yango emonisaka ete maji, kolɔka, to kolakela bato mabe ezali likama te?’ Tosengeli kozala mosika na biloko nyonso oyo Yehova ayinaka.​—Nz 97:10.

TALÁ VIDEO “BÓTƐMƐLA ZABOLO,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Likambo nini ekómelaki moyekoli ya Biblia na nkombo Palesa?

  • Mpo na nini ezali likambo ya bwanya koluka lisalisi epai ya bankulutu ntango bademo batungisi biso?

  • Bótɛmɛla Zabolo, mpe bópusana penepene na Nzambe.​—Yk 4:7, 8

    Soki tolingi Yehova abatela biso, biloko nini tosengeli kolongola to kobwaka?

  • Ekateli nini ya ntina mingi Palesa azwaki?

  • Esika ofandi, makambo nini okoki koboya mpo bademo bátungisa yo te?