Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Kotika te bamposa na yo etambwisa yo

Kotika te bamposa na yo etambwisa yo

Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo tópekisa bamposa na biso. Kasi, soki totiki yango etambwisa biso ndenge elingi, tokoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Na ndakisa, bato mosusu balingaka mingi kolya, kolata, mpe kozala na esika ya malamu ya kofanda, mpe mposa yango esalaka ete bálinga biloko yango mingi koleka ata Nzambe. Bamosusu babukaka mibeko ya Nzambe kaka mpo na kokokisa bamposa na bango ya kosangisa nzoto. (Ro 1:26, 27) Mpe basusu basalaka makambo oyo ezali mabe kaka mpo bákokana na baninga na bango to mpo baninga yango bálinga bango.​—Kob 23:2.

Ndenge nini tokoki koboya kotambwisama na bamposa na biso? Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo tótya makanisi na makambo ya elimo. (Mt 4:4) Lisusu, tosengeli kobondela Yehova asalisa biso mpo tópekisa bamposa na biso. Mpo na nini? Mpamba te ayebi nini ezali malamu mpo na biso mpe ayebi ndenge ya kokokisa bamposa ya malamu oyo tozalaka na yango.​—Nz 145:16.

TALÁ VIDEO KOTIKA TE LIKAYA EBEBISA BOMOI NA YO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini bato mosusu bámɛlaka likaya?

  • Likaya ekoki kosala yo nini?

  • Mpo na nini komɛla makaya, ata oyo ya vapeur ezali mabe?​—2Ko 7:1

  • Okoki kolonga mposa ya komɛla likaya!

    Okoki kosala nini mpo oboya komɛla likaya to mpe kotika komɛla yango?