Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Kotika te bamposa ya mabe etambwisa yo

Kotika te bamposa ya mabe etambwisa yo

Davidi atikaki mposa ya mabe ekola na motema na ye (2Sa 11:2-4; w21.06 nk. 17-18 par. 10)

Davidi asalelaki nguya na ye mpo na kobomba mabe oyo asalaki (2Sa 11:5, 14, 15; w19.09 nk. 17-18 par. 15)

Davidi anyokwamaki makasi mpo na lisumu oyo asalaki (2Sa 12:9-12; w18.06 nk. 17-18 par. 7)

Mpo tóboya kotala to kokanisa makambo ya mabe, tosengeli komipesa disiplini. (Ga 5:16, 22, 23) Yehova akoki kosalisa biso tópekisa makanisi mabe ezwa misisa na motema na biso.

OMITUNA BOYE: ‘Na makambo nini nasengeli mpenza kobatela makanisi na ngai?’