Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

“Bolingo . . . Elikyaka makambo nyonso”

“Bolingo . . . Elikyaka makambo nyonso”

Bolingo ya solosolo etindaka biso tózala na elikya ete bandeko na biso bakozwa bikateli ya malamu. (1Ko 13:4, 7) Na ndakisa, soki ndeko moko asali lisumu mpe azwi disiplini, tolikyaka ete akosala milende mpo abongwana. Tomonisaka motema molai epai ya baoyo bazali na kondima makasi te, mpe tolukaka kosalisa bango. (Ro 15:1) Soki ndeko moko atiki lisangá, tozalaka na elikya ete mokolo mosusu akozonga.​—Lk 15:17, 18.

TALÁ VIDEO KOBOSANA TE NDENGE OYO BOLINGO EZALAKA​—ELIKYAKA MAKAMBO NYONSO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini Abinere atikalaki lisusu sembo te?

  • Davidi mpe Yoabe basalaki nini mpo na kokokisa likambo oyo Abinere azalaki kosɛnga?

  • Mpo na nini tosengeli kozala na elikya ete makambo ya malamu ekokómela bandeko na biso?