Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

“Bolingo . . . Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te”

“Bolingo . . . Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te”

Bakristo ya solo basalaka makasi bámonisa bolingo na makambo nyonso oyo bazali kosala. Bolingo “esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te.” (1Ko 13:4, 6) Yango wana, toboyaka kominanola oyo elendisaka pite mpe mobulu. Lisusu, tosepelaka te komona ndenge makambo ya mabe ekómelaka bato, ezala bato oyo basalaka biso mabe.​—Mas 17:5.

TALÁ VIDEO KOBOSANA TE NDENGE OYO BOLINGO EZALAKA​—ESEPELAKA NA MAKAMBO YA KOZANGA BOYENGEBENE TE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • David ayokaki ndenge nini ntango azwaki nsango ete Saulo mpe Yonatane bakufi?

  • Loyembo nini ya mawa Davidi akomaki mpo na Saulo mpe Yonatane?

  • Mpo na nini Davidi asepelaki te ndenge Saulo akufaki?