Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Lobelá makambo oyo ezali kosalema na mokili na mosala ya kosakola

Lobelá makambo oyo ezali kosalema na mokili na mosala ya kosakola

Yesu asalelaki makambo oyo ezalaki kosalema na ntango na ye mpo na koteya bato. (Lk 13:1-5) Yo mpe okoki kosalela makambo oyo ezali kosalema na mokili mpo na kobenda likebi ya bato na nsango ya Bokonzi. Lobelá ndenge kozwa biloko ya kobikela ekómi mpasi, ndenge makama ezali kobima, mobulu ya bana-mboka ezali kosalema, ndenge bato bamipesi na kosalela drɔgɛ mpe bongo na bongo. Na nsima tuná moto motuna oyo ekotinda ye akanisa. Na ndakisa, okoki kotuna ye boye: “Okanisi ete mokolo mosusu likambo boye . . .  ekosila?” to mpe “Okanisi solisyo nini bakoki kozwa mpo na . . . ?” Na nsima, tángela ye vɛrsɛ moko ya Biblia oyo eyokani na lisolo yango. Soki moto yango asepeli, bendá likebi na ye na video moko to na moko ya mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya. Wana tozali kosala makasi mpo na kosimba mitema ya bato na teritware na biso, tiká ‘tósala makambo nyonso mpo na nsango malamu.’​—1Ko 9:22, 23.

Masolo nini ekoki kosimba mpenza na teritware na bino?