Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

“Ndimelá Yehova Nzambe na yo”

“Ndimelá Yehova Nzambe na yo”

Ntango Yehoshafate mpe bato ya Yuda bakómaki na likama, babondelaki Yehova mpo asalisa bango (2Nt 20:12, 13; w14 15/12 lok. 23 par. 8)

Yehova abɔndisaki bato na ye mpe apesaki bango malako ya polele (2Nt 20:17)

Yehova abikisaki bato na ye mpo bandimelaki ye (2Nt 20:21, 22, 27; w21.11 lok. 16 par. 7)

Ntango Goge ekobundisa basaleli ya Yehova na bolɔzi monene, baoyo bakomonisa kondima epai ya Yehova mpe bakotyela bato oyo Yehova akosalela mpo na kokamba biso motema, bakobanga eloko te.​—2Nt 20:20.