Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Kebá na bapɛngwi!

Kebá na bapɛngwi!

Mbala mingi Satana mpe bato na ye basangisaka makambo oyo ezali solo ná oyo ezali lokuta mpo na kolɛmbisa kondima na biso. (2Ko 11:3) Na ndakisa, bato ya Asiri basalelaki lokuta mpe solo oyo esangani na lokuta mpo na kolɛmbisa basaleli ya Yehova nzoto. (2Nt 32:10-15) Bapɛngwi mpe basalelaka mayele ya ndenge wana lelo oyo. Okosala nini soki okutani na mateya ya bapɛngwi? Talelá yango lokola pwazɔ! Komeka te kotánga, koyanola to mpe kotindela yango moto mosusu. Luká koyeba na lombangu soki likambo moko oyo omoni ezali mpo na kokɔtisa bantembe na motó na yo mpo na Yehova mpe ebongiseli na ye, mpe boyá yango mbala moko!​—Yuda 3, 4.

TALÁ VIDEO ‘BUNDÁ ETUMBA MAKASI MPO NA KONDIMA’!​—VIDEO YA MOKUSE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali kolanda masolo ya bato oyo elekaka na Internet?

  • Ndenge nini tokoki kosalela toli ya bwanya oyo ezali na Baroma 16:17?