Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ozwaka matomba na Biblia ya audio?

Ozwaka matomba na Biblia ya audio?

Biblia ya audio ezali nini? Ezali Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu mpe batángi yango. Ezali kobimisama malɛmbɛmalɛmbɛ na minɔkɔ mingi. Na Biblia yango, basaleli batángi bakeseni mpo na moto mokomoko oyo balobeli na bavɛrsɛ, yango ezali kosalisa mingi. Maloba etángami na mayoki oyo ebongi mpo na kobimisa polele nsango ya Biblia.

Matomba oyo bato mosusu bazwi na Biblia ya audio. Bato mingi oyo bayokaka mbala na mbala Biblia ya audio basepelaka ndenge esalisaka bango bakanga malamu ntina ya Liloba ya Nzambe. Bamoni ete koyoka batángi ndenge na ndenge mpo na moto mokomoko oyo balobeli na vɛrsɛ moko ya Biblia ezali kosalisa bango bámona ndenge makambo elekaki mpe bákanga malamu ntina ya makambo oyo ekomami. (Mas 4:5) Mingi mpe bamoni ete koyoka Biblia ya audio ebɔndisaka bango ntango bazali na mitungisi.​—Nz 94:19.

Koyoka Liloba ya Nzambe oyo batángi na mongongo makasi ekoki mpenza kobongola makambo mingi na bomoi na biso. (2Nt 34:19-21) Soki Biblia ya audio esí ebimá na mobimba na yango to ndambo na monɔkɔ moko oyo oyebi, okoki kotya yango na kati ya makambo ndenge na ndenge ya elimo oyo osalaka?

TALÁ VIDEO NDENGE BIBLIA YA AUDIO EBIMISAMAKA​—VIDEO YA MOKUSE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:

Nini ekamwisi yo na misala oyo esalemaka mpo Biblia ya audio ebima?