Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Okoki kobanda lisolo na esengo

Okoki kobanda lisolo na esengo

Ntango tozali kobɛta masolo na bato tozwaka libaku ya kopesa bango litatoli na ndenge ya malamu mpenza. Nzokande, tokoki kobanga mwa moke soki totye makanisi na biso nyonso na ndenge oyo tokokɔtisa likanisi moko ya Biblia ntango tolingi kobanda lisolo na moto moko. Na esika tómitungisa mingi na oyo tokoloba mpo na kopesa litatoli, tótyela nde moto yango likebi. (Mt 22:39; Flp 2:4) Kasi ntango ozali kosolola na moto mpe libaku emonani mpo na kolobela solo, ozali na bisaleli ebele oyo okoki kosalela.

Ndenge nini bisaleli oyo elandi ekoki kosalisa yo opesa litatoli soki motuna moko ebimi ntango ozali kosolola na moto?

TALÁ VIDEO EBENDE EPELISAKA EBENDE”​—BANDÁ LISOLO, NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:

Wapi makambo misato oyo ekoki kosalisa biso tókolisa makoki na biso ya kosolola na bato?