Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Yehova azali ‘Tata ya bana oyo batata bakufá’

Yehova azali ‘Tata ya bana oyo batata bakufá’

Mbula na mbula, bilenge mingi bazali kopona kokóma baninga ya Yehova. (Nz 110:3) Bilenge, Yehova atyelaka mokomoko na bino likebi. Ayebi mikakatano oyo bozali kokutana na yango mpe alaki ete akosalisa bino mpo bósalela ye. Soki ozali kobɔkwama kaka na moboti moko, kobosana te ete Yehova azali ‘tata ya bana oyo batata bakufá.’ (Nz 68:5) Na lisalisi ya Yehova, okoki kolonga ezala makambo nini ozali kokutana na yango na ndako.​—1Pe 5:10.

TALÁ VIDEO BAZALI KOLONGA ETUMBA MPO NA KONDIMA​—BANA OYO BAZALI KOBƆKWAMA NA MOBOTI KAKA MOKO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndakisa ya Tammy, Charles, mpe Jimmy eteyi yo nini?

  • Libɔndisi nini bana oyo bazali kobɔkwama na moboti kaka moko bakoki kozwa na maloba oyo ezali na Nzembo 27:10?