Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Baboti, bópesa bana na bino libaku ya kolonga

Baboti, bópesa bana na bino libaku ya kolonga

Baboti oyo babangaka Nzambe bazalaka na mposa mpenza bana na bango bakóma basaleli ya Yehova. Baboti bakoki kosalisa bana básala bongo ntango bazali kokɔtisa mateya ya Biblia na mitema ya bana na bango banda na bomwana. (Mib 6:7; Mas 22:6) Yango esɛngaka komipimela? Ezali bongo mpenza! Kasi ebongi mpenza kosala yango.​—3Yn 4.

Baboti bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Yozefe mpe Maria. “Bazalaki na momeseno ya kokende mbula na mbula na Yerusaleme mpo na fɛti ya elekeli,” atako esɛngaki milende mpe mbongo mingi. (Lk 2:41) Emonani ete makambo ya elimo nde ezalaki na esika ya liboso na libota na bango. Ndenge moko mpe lelo, baboti bakoki kosalela mabaku nyonso mpo na koteya bana na bango na maloba mpe na misala mpo na kokamba bango na nzela oyo ebongi.​—Nz 127:3-5.

TALÁ VIDEO BASALELAKI MABAKU NYONSO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini Jon ná Sharon Schiller bakobaki kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso ntango bazalaki kobɔkɔla bana?

  • Mpo na nini baboti basengeli kopesa mwana na mwana disiplini na kotalela bamposa na ye?

  • Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bátɛmɛla ngwi ntango kondima na bango emekami?

  • Bisaleli nini oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá osalelaki mpo na kosalisa bana na yo bákóma baninga ya Yehova?

Salá ete kosalela Yehova ezala likambo ya liboso na libota na bino